Je suis une femme de 32 ans et mariée. Papa tobandaki bien na mobali, mais après akomi makambu bizarres, infidélité, méchanceté, etc. Na Supporter mingi, na boyaka koyebisa batu makambu akoma kosala. Mais le fait yako bomba mingi tii naye kozua maladie ya gastrite (estomac) esilaka lisusu te, ata na meli ba médicaments. Dernièrement batu bazo yebisa nga que bamonaki mobali nanga akomi ko bima na muasi ya frère moko tosambelaka naye, mais nakipaki te. Mais semaine passée, mobali nanga alali, comme atia code ya empreinte na téléphone naye, nazui musapi naye natie et téléphone efunguami. Papa namoni makambu ya somo. Mobali nanga abimaka na ba femmes mariées et aussi avec l'une de mes cousines et aussi une fille de la parcelle où nous louons. Namoni pe ndenge ba pesani rendez-vous na femme ya frère wana bakende ko tia. Esalaki nga pasi mais nazuaki mua maîtrise. D'abord nabengi cousine nanga, natuni ye, andimi pe asengi nga pardon. Naye ko filer mobali nanga na rendez-vous na bango na femme mariée wana, ti naye ko kanga bango.
Alors papa, motema esuki nga, nalingi na bimisa makambu oyo nionso na famille nanga et na boma libala. Nakoma ko konda kaka na souci ata nalie bien.
0 Commentaires