BA NDEKO BASI OYO NANU BO BALI TE BO TANGA MESSAGE OYO TRÈS BIEN PO EKO SUNGA BINO VIE NA BINO MOBIMBA:

1. KO KOMA MWASI NAYE TE SOKI NANU A HONORÉ YO TE: 
Soki nanu mobali abali yo te ko se comporter lokola abali yo te. ozo landa ye pamba pamba lokola mbwa azo luka mokuwa, mipesa valeur po mobali pe apesa yo valeur. soki oza fille facile, oza fille ouvrable, fille gentille...akobanda ko kanisa ke oza facile à manipuler pe facile à garer. Alors, po ba incidents nyonso wana ekoma te il faut o mipesa respect pe valeur.

2. KOSALA PUBLICITÉ YA BOLINGO NA BINO TE. TIKA BATU BA MONA: Na Congo soki obandi kosala publicité ya mobali nayo, okomi ko lobela bolingo oyo oza n’ango envers mobali nayo...okomona batu misusu bakomi ko décourager yo, batu misusu oyo balingaka te bozala ensemble bakomi ko kosela mobali nayo makambu pe ba komi ko loba biloba loba nyonso wana po bokabwana. Zala mayele pe très confidentielle na makambu nayo. Eza vie nayo.

3. MIPESA VALEUR: ko koma mwasi naye na pressé te po nanu a honoré yo te. il faut oyeba vraiment malamu malamu soki mutu oyo olingi opesa motema nayo soki ye pe aza capable yako pesa motema naye. il faut olandela ye malamu malamu po lobi passé nayo ekoma kilos te na motema nayo to na misu ya batu.

4. ATA AMEMI YO EPAYI YA BA PARENTS TO BA NDEKO NAYE ZALA KAKA MAYELE: 
Soki mobali akeyi nayo na famille naye elingi koloba te ke ako bala yo, ata a présenter yo epayi ya ba ndeko naye il faut ozala toujours na contrôle. nzungu yako fongwama ekotisaka salité pe ba fourmis. 65% ya basi oyo ba kenda kotala belle famille ba bala bango te. ko kende na belle famille eza mabe te kasi elongola yo na place nayo te. mipesa valeur.

5. KO LINGA MOBALI PONA MBONGO TE: 
Mbongo eza bien, mbongo esombaka cabelo, mbongo esombaka robe...kasi kolanda mobali pona mbongo eza vrai amour te. Ba pesaka mobali affection pona mbongo te, kasi bapesaka mobali affection po aza guide, leader, responsable, boss ya famille...Alors, po mobali azala boss ya famille il faut azala kaka na mbongo ebele te. kasi azala na vision, amour, attention, na sagesse yako batela relation to libota.

6. SEXE NAYO EZA JOUET TE: 
Basi ebele bayebaka te. nzoto ya mwasi ezalaka tellement fragile, alors na tangu nyonso oyo ozo bima na mobali yeba partie intime nayo ezo fongwama malembe malembe...na yango mobali nyonso aza mobali oyo okoki ko pesa nzoto nayo te parceque à chaque fois ozo pesa nzoto nayo epayi ya mobali ozo sila Bilengi malembe malembe...pe eko risqué okoma lokola toneau pe un jour mobali ya vie nayo azala lisusu na goût nayo entant que mwasi te. Mibatela.

7. SOKI MOBALI NAYO AZA NA NDAKU KO KENDAKA KUNA PAMBA PAMBA TE: 
Mwasi oyo akendaka epayi ya mobali oyo nanu abali ye te à tout moment aza mwasi oyo aza na facilité azwa zemi, mwasi oyo akendaka epayi ya mobali oyo nanu abali ye te à tout moment aza mwasi oyo aza na possibilité yako kota na ndaku ya mobali sans que mobali a honoré ye. ko sokola bilamba ya likangu nayo eza mabe te, kasi soki ozo sala yango à tout moment yeba ozo longola couronne nayo ya ki bo mwasi...il faut opesa ye courage po aya ko bala yo un jour.

8. KO ZUA ZEMI NA KOMBO YA BOLINGO TE: 
Une vraie femme azuaka zemi pona bolingo te kasi azwaka zemi na moment oyo esengeli. soki ozui zemi pona bolingo ebongo soki mwana abotami akolia nini ? soki mwana abotami akolata nini ? soki mwana abotami ako vivre ndenge nini ? une vraie femme azuaka zemi soki ba moyens eza équitables. Ko sala erreur te yako zua semi pona ko prouver mobali ke olingi ye, po soki ye alingi yo te ndenge ozo kanisa, ako sundola yo na mwana. Zala mayele.

9. VRAIE MWASI AZALAKA TOUJOURS PROPRE: 
Basi ebele awa ba depensaka ba 5000fc pona ba méga, ba 10 ou 20$ pona ba photos shooting...kasi ebele baza kaka na 3 ou 4 caleçons. bozo trouver yango normal ? kozala propre eza sujet yako zala na mbongo ebele te, bilamba ya basi etekama moins chers koleka ya mibali. ata na friperie (ballon) soki okeyi na 10.000fc ya pamba okozua bilamba ya bien, mwa parfum ya 5000fc, mwa ketch, mwa lipapa ya bien...nyonso wana po ozala kaka bonzenga.
Mwasi aza fleur